Ezayi 18
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Mawa na mokili oyo ezali na bamasuwa oyo ezalaka na bavwale lokola mabanki, bongo enanaka na ebale ya Kushi !
2Mawa na yo oyo otindaka bantoma na nzela ya ebale kati na bamasuwa oyo basala na papirisi, na likolo ya ebale monene ! Bino bapanzi sango ya mbangu, bokende epai ya bato ya ekolo oyo bazalaka milayi mpe baposo ya nzoto na bango engengaka, epai ya bato ya ekolo oyo babangisaka na mosika, bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango, mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango.
3Bino nyonso, bavandi ya mokili, bino oyo botondisi mabele, tango bakotombola bendele na likolo ya bangomba, bokomona ; tango bakobeta kelelo, bokoyoka !
4Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na ngai : « Nakovanda kimia mpe nakotala wuta na ndako na Ngai, lokola kongala ya moyi to lokola mapata na tango ya molunge. »
5Mpo ete liboso ya kobuka bambuma, tango bafololo ya mike etikaka kobima mpe ekomaka bambuma mibesu oyo ekomi pene ya kotela, bakataka bitape na likwangola, babwakaka mpe batiaka pembeni bitape.
6Bakosundola yango epai ya bandeke oyo eliaka misuni na likolo ya bangomba mpe epai ya banyama ya zamba. Bandeke minene ekolia yango na tango ya molunge mpe banyama ya zamba ekolia yango na tango ya malili.
7Na tango wana, bakomema bakado epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, wuta epai ya ekolo ya bato milayi oyo poso ya nzoto na bango engengaka, wuta epai ya ekolo ya bato oyo babangisaka na mosika, bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango, mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango, bakomema bakado yango na ngomba Siona, esika oyo Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaka.
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath