Ezekieli 15
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Yawe alobaki na ngai :
2« Mwana na moto, nzete ya vino eleki banzete mosusu na nini ? Bitape na yango eleki bitape ya banzete mosusu ya zamba na nini ?
3Bakoki solo kobimisa libaya na nzete ya vino mpe kosalela yango eloko ya tina penza ? Bakoki solo kosalela yango bisimbelo ya kotiela biloko likolo ?
4Sima na kobwaka yango na moto, moto ezikisaka basonge mpe kati na yango ; boye ndenge nini bakoki kosalela yango penza eloko ya malonga ?
5Soki kutu bakoki kosalela yango eloko ya malonga te tango ezali nanu mobimba, bongo ndenge nini bakoki kosalela yango eloko ya malonga tango moto esili kozikisa mpe kotumba yango ?
6Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ndenge nabwakaka na moto nzete ya vino kati na banzete mosusu ya zamba, ndenge wana mpe nakosala bavandi ya Yelusalemi.
7Nakotelemela bango penza ; ezala babimi na moto, moto mosusu ekotumba bango. Na bongo, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakopesa bango etumbu :
8Nakosala ete mokili na bango etikala lisusu na bato te mpo ete batambolaki na boyengebene te, basalaki makambo ya nkele elobi Nkolo Yawe. »
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath