Boklisto
zonga

Mosakoli 11

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Bwaka lipa na yo na likolo ya mayi, pamba te sima na mikolo ebele, okomona yango lisusu.

2Kaba biloko na yo na bato sambo to mwambe, pamba te oyebi te pasi nini ekoki koya na mokili.

3Soki mapata etondi na mayi, ebetisaka mvula na mokili. Nzete etikalaka kaka na esika oyo ekweyi, ezala na ngambo ya sude to na ngambo ya nor.

4Moto oyo atalaka mopepe akolona nkona te, moto oyo atalaka mapata akobuka bambuma te.

5Ndenge oyebi te nzela ya mopepe to ndenge nini moto asalemaka kati na libumu ya mama na ye, ndenge wana mpe okokoka te kososola misala ya Nzambe oyo azali Mokeli ya nyonso.

6Na tongo, lona milona na yo, mpe na pokwa, kopemisa maboko na yo te, pamba te oyebi te milona nini ekobima, ya tongo to ya pokwa to mpe nyonso mibale ekobima malamu.

7Pole ezali malamu, mpe miso esepelaka komona moyi.

8Yango wana, soki moto asali mibu ebele na bomoi, tika ye asepela na mibu yango nyonso ; kasi tika ete abosana te ete mibu ya pasi ekozala ebele, mpe ete makambo nyonso oyo ekoya sima ezali pamba.

9Elenge, sepela na bolenge na yo, mpe tika ete motema na yo esepela na mikolo ya bolenge na yo ! Landa nzela ya motema na yo mpe nyonso oyo esepelisaka miso na yo ; kasi yeba ete, mpo na makambo wana nyonso, Nzambe akosambisa yo.

10Yango wana, longola mawa na motema na yo, longola pasi na nzoto na yo ; pamba te bolenge mpe bomwana ezali pamba.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath